(Lazaristes)
o Province ya Congo-Belgique

"Nzela ekozala molai. Kotambola ekozala na mabaku ebele, mpe babola bakoyokisa yo mpasi, Jeanne. Okomona noki ndenge bolingo bozali kilo koleka nzungu ya supu mpe ekolo ya mampa; kasi oyeba kokanga motema mpe kozala na esengo. Kopesa supu na mampa ekoki te, ata bato ya mbongo bakoki kosala yango. Kasi yo ozali nde ndeko wa babola mpe bango bazala bakonzi ba yo. Mbala isusu bazali masengisi makasi koleka bakonzi ba mokili, okomona yango. Ntango okomona 'te bazali mabe, bosoto, ntango bazangi malonga mpe bakofinga yo, yo nde osengeli kopesa bango bolingo koleka. Bobele mpo ya bolingo bwa yo epai ya bango nde babola bakondima yo"

(Maloba mazuami o film "Mr Vincent".)

x

x

x

x